Buku oyo ezali ofelé mpe ekoki ata moke té koteka to kosala mombongo.
Ozali na bonsomi yonso ya kosala kopi ya Buku oyo mpo na kosakola na yo to mpo na kokabola yango, to lisusu mpo na mateya na yo na ba Réseaux sociaux, kasi nde kobongola malakisi ata moke té, mpe etangama ete euti na site ya mcreveil.org.
Mawa na bino, basali na satana, batu na lokoso oyo bokomeka koteka Malakisa na Matatoli oyo!
Mawa na bino, bana na satana oyo bolingaka kobimisa mateya mpe matatoli oyo na ba Réseaux Sociaux mpe kobomba adresi ya site internet www.mcreveil.org, to kobongola mateya na yango!
Yebá ete okoki kokima ebongiseli ya bosambisi na bato, kasi na ntembe okokima etumbu ya Nzambe té.
Banyoka, ekolo na banyoka! Ndenge nini bokokima etumbu ya Gehena? Matai 23:33
Kanga Malamu
Buku oyo ezongisamaka sika mbala na mbala. Todjali kopesa Bino toli ete odjua version to lolenge oyo ebongwani na Site www.mcreveil.org.
NSANGO MPO NA BASODA NA KLISTO
(Etiami Nsika Mokolo na 03 03 2024)
Bandeko balingami mpe baninga balingami, na bantango oyo na ntango ya nsuka, ntango totikali na ntango moke mpo na kotonga lisusu efelo, liboso ya makelele ya kelelo, tomoni ete ezali na ntina mingi mpo na kosala libiangi epai na Basoda banso ya solo na Nzambe, mpe mpo na bato nyonso na bokosi mpe bato ya lokuta oyo bamimonisaka lokola Basoda na Nzambe ya solo, na boye ete moto nyonso atalela lisusu etɛlɛmɛlo na ye, mpe moto nyonso andimisa polele mpe andimisa boponi na ye, engebene na malako na Yesu na Emoniseli 22:10-15 "10Mpe alobaki na ngai ete: "Táka elembo na maloba na esakweli na buku oyo te. Pamba te ntango ekómi pene. 11Tika moto oyo azali sembo azala naino na bosembo te, tika ye." oyo azali mbindo amibebisa lisusu, mpe mosembo asalaka boyengebene, mpe ye oyo azali mosantu amisantisa.12Tala, nazali koya noki, mpe mbano na ngai ezali elongo na ngai, mpo na kozongisa moto na moto engebene na mosala na ye.13Ngai nazali moto alfa mpe omega, ya liboso mpe ya nsuka, ebandeli mpe nsuka.14Esengo na baoyo basukolaka bilamba na bango, mpo ete bakoka kozwa lotomo ya nzete ya bomoi, mpe bakoka kokota na bikuke na kati ya engumba.15Na libanda ezali mbwa, banganga-nkisi, pite, babomi, basambeli ya bikeko, mpe moto nyonso oyo alingaka lokuta mpe azali kosalela lokuta.”
2- Nsango epai na bat’oyo Batiaka Makambo to (Conditions) mpo na Kosala Mosala na Njambe
Balingami, bin’oyo bokataki seleka mpo na kosala mosala na Nzambe, mpe yambo bosala yango bozali kosenga biloko ya kosalela, bozali kosenga mbongo to lisungi. Boyoka Nsango na Nzambe epai na bino:
Liboso: Ngonga ebelemi boyeba ‘té, moto nani oyo ajali kosalela Nzambe, ajali kosala yango po na bolamu na ye moko. Na kosalela Nzambe, tozali koluka mapamboli na biso, kasi ya Nzambe té. Nzambe azali na mposa na mapamboli té, Ye nde Nkolo na mapomboli nyonso. Na kosalela Nzambe, tozali koluka nde mitole na biso, kasi ya Nzambe té, ye azali na ntina na motole té, aza na yango ebelé. Ntango tozali kosalela Nzambe na makasi na biso, na mbongo na biso, pe makabo na biso mpo na mosala na Nzambe, tojali kozwa mpe kobomba bojui na biso, ya nzambe té. Ye azali na yango ebele.
Mibale: Bosengeli koyeba ‘té mosala na Nzambe ejali ekima (komibonza). Nzambe Ye mei abonjà Mwana-na-ye ya likinda po na kobikisa bato nyonso. Yesu-Klisto, Mwana-na-Likinda na Nzambe ándimaki komibonza mpo na biso, po ‘tè tozwa esengo ezanga nsuka, oyo ejali kozela biso sima ya bomoi na nse na moi ya pasi. Nde na yango, mwana solo nyonso ya Nzambe asengeli komibonza mpo na nkembo ya Nkolo Yesu-Klisto na ye, mpe mpo na bato nyons’oyo Yesu-Klisto ayaki kokufela.
Misato: Bosengeli koyeba polele ‘tè kosalela Nzambe ezali kosalela ye bolamu té, pe bojali kosalela Basali na Nzambe bolamu mokoté na kosala mosala na Nzambe. Nakosalela Nzambe, bojali komisalela Bolamu monene. Nakosalela Nzambe, todjwi limemia na Ye, todjwi bolingo-eleki kouta epai na Ye. Botika kosala bilobela epai na Nzambe pe epai na Basali na Nzambe tango bolingi kosala mosala na Nzambe. Soki bolingi kosalela Nzambe té, botika kosala soki bokanisi ejali bolamu na Nzambe to bolamu ya basali na ye.
Nazali na emoniseli kitoko pe na motuya na kopesa bino, yang’oyo: "Bosala Mosala na Nzambe, Boboya Kosala yango, boyeba ‘tè Mosala na Nzambe Ekosalema kaka. Eloko té pe Moto moko té àkoki Kokakema Mosala na Nzambe." Botika Bilobela, Ekosunga té.
Yambo bobotama, Mosala na Nzambe ejalaki kosalema, pe nsima na yo Ekosalema. Nzambe aza na ntina penza na yo té po na mosala na ye. Elongo na yo to na yo té, Mosala na Nzambe Ekosalema. Bojali solo na motuya po na mosala na Nzambe soki oponi kosalela yango na motema moko, Kasi bozali na motuya té pe bokojalaka na yango ata moke té. Moko té Asengeli.
Tomanyola elongo Litangi na Malaki 1:6, 8; 13-14: "6Mwana nyonso atosaka tata na ye, mpe moumbu nyonso atosaka nkolo na ye. Ngai nazali Tata na bino mpe Nkolo na bino té? Mpe bokumisaka ngai té? Elobi Yahwe na Mampinga epai na Banganga-Nzambe, oyo Bozali kotsiola Nkombo na ngai, mpe bozali kotuna: Totsioli Yo na nini? 8Tango bomemelaka ngai mabonza ya nyama ekufá miso, yango mabe te? to bobonji nyama oyo azali tengu-tengu to mpe ya maladi, yango mabe te? Bómeka kopesa nyama ya ndenge wana na motambwisi ya mboka na bino!; bokanisa ‘tè ye akosepela mpe akosalisa bino? Ngai Yahwe ya nguya nyonso moto natuni bino boye. 13... Kutu Bozali komemela ngai mabonza ya banyama ya koyiba, to ya tengu-tengu, to mpe ya maladi. Nde mabonza bojali komemela Ngai! Bokanisi ‘tè ngai nakoki kondima mabonza ya ndenge wana? 14Lisumá ézwa mot’oyo adjali na banyama na kitoko, kasi alongoli moko ya mabe mpo na kopesa ngai yango libonza! Mawa na ye, mpamba té Ngai nazali Mokonzi Monene; bato ya bikolo nyonso bayebi ‘tè nazali Nzambe ya sukisa. Ngai Yahwe ya nguya nyonso nalobi boye."
Nini mpenja nde Nzambe adjali koloba na Likoma oyo?
Nkolo ajali koloba na bino ‘tè asepelaka na mabonza ntina té, oyo ezali pamba na miso na biso, kasi ejali libonza po na biso. Soki okoki kobonjela Nzambe eloko na yo ya motuya té, olingi Nzambe té. Ntango olingi kobonjela Nzambe biloko oyo oibaki, to olokotaki to biloko ya tina té, ekosunga na eloko té, ozali kotsiola Nzambe. Akondima té, akosepela na mabonja na yo té.
Nzambe mpo na kobikisa biso, abonjaki mémé ekufa makolo té, ekufa miso té mpe ya maladi té, atindaki muanje té. Atindaki Mwana na Ye moko, oyo ya Motuya epai na Ye. Yango wana Libonja ya solo pe ya motuya, pe libonja ya bongo nde esepelisaka Njambe pela moko ye asalaki bongo epai na biso. Po na nini tojali kojongisela ye mabonja oyo ejali na tina té? Nzambe akondima yango té.
1Basango Eleka 21:24 "Kasi Dawidi alobi na ye: Té! Nakosomba yango, nakofuta yo ndenge ekoki. Soki té, ndenge nini nápesa Yawe biloko na yo? Nakoki kopesa ye mabonza ya ofelé té." Soki olingi kosalela Nzambe, salela ye na motema na yo mobimba, na esengo, pe na biloko na yo nyonso. Koloba té olingi kosalela Nzambe pe ozeli bapesa yo nyons’oyo esengeli po na musala, té. Wana ejali lokola obonjeli Nzambe nyamba ekufa miso, ejali kobonjela Njambe nyama bosono to nyama ya tengutengu, ejali kobonjela Nzambe biloko na yo té, oyo ya motuya té. Mwana nyonso solo ya Nzambe akowela kosalela Nzambe, Mpo ‘tè edjali Lokumu monene kosalela Nzambe.
Lelo todjali na Batu ya Bilongi mibale, bayeoyo bamibengi bana na Nzambe, mpo na kosomba basapato ya motuya likolo ‘tè bamonana, bilamba ya motuya po ‘tè bamonana, batshombo (Phones) ya motuya pe biloko lokola, bazangaka mbongo té. Kasi po na kosalela Nzambe bajali kosenga bapesa bango biloko ya mosala, basusu basengi mwa-misolo mpo ‘tè bazwa bopikiliki to makasi na mosala. Bakoki kobonjela Nzambe biloko oyo ejali ya bango té.
Mpo na bino Bato ya bilongi-mibale, libanda bojali komonana bana na Nzambe kasi po bosalela Nzambe bojali kosenga mbongo, lifuta, Boyeba libela ‘tè, bokokota na Lola ya Yesu-Klisto té na motema mabé. Bojali na njela ya kokende na Lifelo. Bomikosa té. Motema na bino etonda lokoso pe bilulela na motindo eleki. Bolingi kozwa mbongo na misala nyons’oyo bolingi kosala. Bato na lokoso, Bobongola mitema !
Ntango nyonso bolingi kosomba biloko oyo ejali na motuya na miso na bino kasi ejali pamba bojali kozanga misolo té, kasi po na kosalela Nzambe misolo ejali té. Ntango nyonso bojali na ngonga po na kosala misala na bino pe biloko bolingaka kasi po na kozwa ngonga ya kosalela Nzambe, wana ngonga emonanaka té, Bokomi liboke moko na bayeoyo na kati na etuluku ya bibwele na ye ya mibali, àponi kobonjela Nzambe nyama ya kokonda. Bozali bato na lokuta, bamiyibi.
Djambi Nkolo amibonja té epai na bino mpo ‘tè bokoka mpenja kosalela ye ndenge esengeli té? Soki Nzambe azelaka biso to pesa ye biloko ya mosala, to mombongo yambo abonja Mwana na ye nde atikala kobonja Mwana na ye té. Pela moko, soki Mwana na Nzambe azelaka epai na biso biloko to mwa-misolo yambo aya komibonja po na biso, nde atikala koya té. Wana nde bolingo ya solo. Okoki koloba ‘tè olingi Nzambe, pe okoki kosalela ye eloko moko té yambo bapesa yo lifuti, bafuta yo to babondela yo.
Maloba na Nsuka: Soki olingi yambo osala mosala na Nzambe, bafuta nanu, kosala yango té. Soki olingi bapesa yo biloko ya mosala, to bapesa yo ntina (motivation) po na kosala mosala na Nzambe, kosala yango té. Soki olingi babondelaka yo po ‘tè osala mosala na Nzambe, kosala yango té. Elongo na yo to elongo na yo té Mosala na Nzambe Ekosalema Kaka. Napesa moto moko kanyaka té mpo ‘tè asalela Nzambe mosala. Mokol’oyo bato bakozala té mpo na kosalela Nzambe, akosekwisa mabanga mpo na mosala na ye.
3- Nsango epai na Bat’oyo Batsiolaka Mosala na Nzambe
Tozali pe na bayeoyo bamibengaka bana na Nzambe, bandimi kosala mosala na Nzambe, kasi bajali kotsiola na nko mosala yango. Elingi koloba ‘tè bato wana baponi na nko kosala mosala na Nzambe ndambo, to kokotisa mabé to mbeba na nko, to kobakisa na nko oyo ezalaka té. Boyeba ‘tè mbeba wana ejali likama. Ekeseni na Kotuka Molimo Mosantu té. Pela moko na bayeoyo bajali koteya bato lokuta na nko, to bayeoyo bajali kotsiola na nko mosala na Nzambe, nyonso wana ntina ‘tè bapengwisa bat’oyo bajali koluka Nzambe pe kobungisa bango na nko. Nzambe akolimbisakà bino ata moke té. Esengeli Nsango oyo ejala polele po na bato nyonso ya satana oyo bajali kosala bongo. Na Lifelo, etumbu na yo ekolanda mundelo na botomboki na yo.
4- Nsango epai na Bat’oyo Badjali na Mposa ya Kosalela Njambe te
Mpo na bin’oyo bosepelaka kosalela Nzambe té, Boyeba ‘tè bojali nde kotsiola mapamboli na bino. Bojali solo lokola ba-Ezau. Mapamboli ejali koyebisa bino eloko moko té, ya solo na ngonga oyo, kas inde ngonga ejali koya oyo mapamboli ekoloba na bino, kasi pe ekojala ngonga elekà. Mapamboli oyo bojali kotsiola lelo, bokoluka yangu na mpinzoli na mikol’oyo ejali koya, kasi ekojala pamba. Boyeba ‘tè bokomema eloko té na mokili oyo. Oyo ejali kosepelisa yo to ejali kopesa yo motema mosanda lelo, olinga olinga té okotika yango na mikolo oyo elandi. Okomema eloko té, ata olingi yango.
Tomanyola makomi oyo elandi:
Ebandeli 25:29-34 "29Mokolo moko, tango Jakob azalaki kolamba supu, Ezau akómi, autaki na zamba pe alembaki mingi. 30Bongo alobi na Jakob: Nalembi mingi. Pesa ngai supu oyo ya motane nàmela. Yango wana bapesaki Ezau kombo mosusu Edom. 31Kasi Jakob alobi : Liboso tekela ngai bokonzi na yo ya mwana ya liboso. 32Ezau azongisi: Nazali kokufa nzala; bokonzi yango ya mwana ya liboso ekosala ngai nini? 33Jakob alobi: liboso katelanga ngai nanu seleka. Bongo Ezau akati seleka ‘tè atekeli Jakob bokonzi na ye ya mwana ya liboso. 34Pe Yakob apesi ye mapa nà supu ya medesu. Ezau alei, ameli, sima akei. Boye Ezau amonaki bokonzi ya mwana ya liboso lokola eloko ya mpamba."
Ba-Ebré 12:15-17 "15Bókeba! Moto moko té àbungisa bolamu ya Nzambe. Moto moko té àkóma lokola lititi ya bololo oyo ekoki kobomisa bato ebelé na kati na bino; 16Moto moko té ásala kindumba to átsiola makambo ya Nzambe, ndenge Ezau asalaká: atekisaki bokonzi na ye ya mwana ya liboso likolo ya bilei ya mokolo moko. 17Bongo na sima, lokola boyebi, álingaki ‘tè tata na ye ápambola ye po àzwa bolamu oyo Nzambe alakaká. Azwaki nzela té na Kobongola Makanisi na tata na ye, atako abimisaki mai na miso."
Tika na lakisa bino banani bajali ba-Ezau. Ba-Ezau bajali bat’oyo bakanisaka kaka mpo na Lelo. Lobi ejali na ntina té. Oyo ejali na motuya po na bango ejali LELO, Sasaipi. Balingi nyons’oyo bamoni na miso na bango. Kolobela bango mapamboli oyo ejali koya, ejali ntina té, ejali bozoba. Bakangami na mapamboli oyo ekoya té, bakangami na makambo oyo bajali komona. Ntango bajali kolendisa bango po na kosala mosala na Nzambe na esengo, koyebisa bango ‘tè mitole ejali kozela basolda ya solo na Nzambe, Balobi lokola Ezau motole ekosunga ngai na nini? Ngonga eyei epai wapi bakoluka mitole yango mayi na miso ejali kotanga, nzokande ata basengi, baleli to batubeli ekosala eloko moko té. Ntango Ezau azalaki kotsiola lipamboli, azalaki kokanisa na oyo ya lelo, to oyo ajalaki komona, atikala kokanisa ata moke po na lobi té. Ntango lobi ayei koya, ekomi lelo mosusu, sasaipi mosusu, kasi lelo na ye wana ejalaki lisusu té.
Jeremi 48:10 "Lisumá ezwi bato nyons’oyo basalaka mosala na Yahwe na molende té, mpe baboyaka ‘tè mbeli na ye étangisa makila!" Kasi nde kaka té okomipesa na mosala na Nzambe mpe okosala yango na molende.
5- Nsango epai na Bat’oyo Baboyi Kosala Mosala na Njambe
Mpo na bin’oyo boboyaka kosala mosala na Nzambe, boyeba ‘tè Nzambe akelaki bino po ‘tè bosalela Ye, bosala mosala na Ye. Boyeba libela ‘tè Kosala musala na Nzambe ejali ya Kopona té Kasi ejali mobeko. Soki otié ntembe, kobanga té, okososola yango na mikolo ekoya.
Matai 25:24-30 "24Na sima mosali oyo azwaki liboke moko ya mbongo ayei pe alobi: Mokonzi, nayebaki ‘tè ozali moto moko ya matata: obukaka mbuma ata oyo okoni té; 2525Nabangaki, yango wana nakendeki kobomba mbongo na yo na se ya mabelé. Tala mbongo na yo yango oyo. 26Mokonzi na ye azongiseli ye: Mosali mabe pe ya goigoi! Oyebaki ‘tè nabukaka mbuma ata oyo na koni té; 27Bongo ebongaki ótia mbongo na nagi na banke, boye lokola nazongi nalingaki kokende kokamata yango ná benefisi. 28Bóbotola ye liboke ya mbongo wana pe bópesa yango na moto oyo azali na maboke zomi. 29Pamba té, moto oyo azali na biloko mingi, bakobakisela ye mosusu; kasi oyo azangi biloko, bakobotola ye kutu ata ndambo oyo azalaki na yango. 30Bóbwaka mosali oyo ya pamba-pamba na libanda, na molili, esika balelaka mpe baliaka mino."
Oyebi mpo na nini Nzambe akobwaka yo na Lifelo mpo na koboya kosala musala na ye? Zela nafungola bino: Makasi ya Nzoto ojali na yango, Nzambe nde mopesi. Njoto kolongono wana Nzambe nde mopesi. Mayele ojali na yango, Nzambe nde apesi yo. Bwanya ozali na yango, Nzambe nde mopesi. Apesi yo nyonso wana lokola biloko ya mosala po ‘tè osalela ye. Soki sik’oyo bojui biloko ya kosalela Nzambe pe oboyi kosalela ye, oyebi oyo ejali kozela bino nyonso: Milelo mpe Koswa mino na Lifelo seko-seko. Bino nde bokopona yango.
6- Nsango epai na Bat’oyo Basalaka Mosala ya Njambe na Esengo
Mpo na bino nyons’oyo bolinga Nkolo na motema mobimba, bobangaka Nkolo, pe bosalelaka Ye na esengo pe bopikiliki, na komiboya, na komipekisa pe na lolenge oyo esengeli mpenja, boyeba ‘tè bojali kolekisa ngonga pamba té. Bojali kobomba mapamboli na bino. Bojali kotonga bandaku na bino na Bokonji na Lola. Bojali kónduka bomengo na seko na Lola, epai ya Nzambe. Kuna bampese eliaka yango té, mpe biloko ebebaka té, pe bamiyibi babukaka bandako té mpo na koyiba.Matai 6:19-20. Kanga makasi oyo ojali na yango kino nsuka pe okolela té.
Tokanisaka mpo na Makomi oyo elandi:
2 Yoana 1:8 "Bókebaka mpo misala oyo tosi’tokokisi na kati na bino ébeba té; kasi bózwa na yango lifuta oyo ekoki."
1 Bakolinto 2:9 "Kasi esalami ndenge ekómamà: Makambo oyo moto moke té amonà to ayokà, oyo moto moke té akanisà, Nzambe asi’abongisà yango mpo na bat’oyo balingaka Ye."
Tokanisa loyembo oyo elobi ‘tè: "Lola ejali kitoko mpe malamu, Lola ejali kitoko mpe ebongi mpenj!"
Bino nyons’oyo bolobaka na biso ‘tè bolingi komipesa mpo na kasalela Nzambe, mpe ntango to ndimi, bosaleli lokoso na bino, oyo botondi na mitema na kosenga biloko ya kosalela mosala na Nzambe pe lisungi ya ndenge na ndenge, ezala mbala ya suka. Tojali wana té po na masano, tojali wana po na kosalela Nzambe, pe tojali kosala yango na esengo mingi. Tozwaka pe lifuta moko té, pe moto moko té afutaka biso, tojali pe kofutisa moto moko té, tolingi balondelengi té oyo bajali kopusana pembeni na biso na lokoso, baye po na mosala na Nzambe té kasi baye po na lokoso. Tokopesa moto moke kanyaka té mpo àsalela Nzambe, mpe tokofuta moto moko té mpo ‘tè akoka kosalela Nzambe. Tondimi koyamba na ékipe ya mosala, moto nyons’oyo alingi Nkolo Yesu-Klisto na motema mobimba, baoyo babangaka Ye, mpe bandimi kosalela Nzambe na bopikiliki mpe esengo, mpe bamipekesi na ndenge esengeli mpenza. Soki ojali mot’oyo alati lolenge tolobi awa likolo, boyei malamu mpe komela biso, soki bongo té, tika mobulu.
Tika eté Ngolu ejala na baye banso balingaka Nkolo na biso Yesu Klisto na boling’oyo ekoki kobongwana té!
Bandeko Mibali mpe Basi,
Soki ókimaki mangomba ya lokuta mpe olingi koyeba nini esengeli kosala, talá Makambo mibale oyo ezali mpo na yo:
1. (Yaliboso) - Tala soki ezali na bana mosusu ya Nzambe nzinganzinga na yo, oyo babangaka Nzambe mpe bazali na mposa ya kozala na bomoi yengebene na Malongi ya Malamu. Soki omoni ata moko, kobanga té kosangana na bango.
2. (Yamibale) - Soki odjwi ata moko té mpe olingi kosanganà na biso, baporte na biso efungwami be mpo na yo. Eloko kaka moko oyo tokosenga bino bosala ezali yambo kotanga Mateya nyonso oyo Nkolo apesi biso, mpe oyo ezwami na site to lokasa na biso www.mcreveil.org, mpo na kondimisa bino ete malakisa na biso solo ekokani na Biblia. Soki omoni yango bongo, mpe bondimi kotosa Yesu Klisto, mpe kozala na bomoi yengebene na masengi na liloba na Ye, tokoyamba bino na esengo.
Tika ‘té Ngolu na Nkolo Yesu edjala na bino! 1 Bakolinti 16:23
Euti na & Komela biso Awa:
Site Internet: https://www.mcreveil.org
E-mail: mail@mcreveil.org